Mituna 60 ya Bonzambe
Na biyano ya Bibilia
1. Kombo "Trinité"
ezali na Bibilia? Ezali te.
2. Bibilia ezali Koloba te bato misato bazali na KATI
YA Bonzambe Divinité)? Te.
3. Bibilia ezali Kondima Nzambe Tata, Mwana, pe Molimo
mosantu? Solo Bibilia ezali Kondima.
4. Mat 28:19 ezali Kondima te Bato misato bazali nakati
ya Bonzambe to misala misato ekabwa na pe ekeseni? Yango wapi? Ezali
Misala.
5. Lolenge nini Nzambe azali Komimonisa nakati ya Misala
misato? Na Botata: Nzambe azali Komimonisa na
bokeli mokili. Na Bomwana: Nzambe azali Komimonisa na bolimbisi masumu. Na
Molimo – Santu: Nzambe azali Komimonisa na nguya na ye na Kati ya Lingomba.
6. Kombo <<moko>> ekomami na Bibilia na
tina ya Bonzambe? Ekomami. Zacharie 14:9; Malachie
2:10; Mat. 23:9; Mark 12:29 na 32; Yoane 8:41; 10:31; Romain 3:9; 30; I Korent.
8:4; Gal. 3:20; Eph. 4:6; I Timothee 2:5; Jacques 2:19
7. Mabombami ya Bonzambe (Divinité) ekoki kososolisama?
Ekoki. Romains 1:20; Koloso 2:9
8. Mo Kristo azali na Batata ebele? Te.
Mat. 23:9
9. Pona nini Yezu alobi na Philipo: „oyo amoni
ngai amoni Tata“? Pamba te Makomi ezali
komonisa te Yezu azali elili ya Nzambe oyo amonanaka te. Hebr.1:3; Koloso
1:15 na 2 Korenth. 4:46
10. Bibilia ezali koloba te bato mibale bazali na kati
ya Bonzambe? Te.
11. Bibilia ezali koloba te Moto moko azali na kati
ya Bonzambe? Bibilia eloli bongo. Job 13:8; Hebr.
1:3, 2. Korent 4:4; Koloso 1:19 na 2:9
12. Mabombami ya Bonzambe ebombami pona Bato mosusu?
Ezali bongo. Luk. 10:21-22
13. Nzambe azalaki wapi tango Yezu azalaki na mabele?
Nzambe azalaki pe na likolo, po te azali bipayi nionso.
2. Korenth. 5:19; Yoane 14:6 na Yoane 3:3
14. Agur Mosakoli alingaki koyeba mabombami ya Bonzambe?
Alingaki. Proverb 30:4
15. Mosakoli Esaie alobaki te Yezu azali Tata?
Alobaki. Esaie 9 (15)
16. Tango Nzambe alobi: "Tosala Moto na lolenge
na ye." Azali koloba na Moto mosusu na kati ya Bonzambe? Te
Genése 1:26-27; Malachie 2:10
17. Bonzambe nini ezalaki na kati ya Yezu? Koloso
2:9
18. Ndenge nini tokoki koyeba Nzambe oyo atindaki Yezu
na mokili? Yoane 12:44-45
19. Bibilia ezali koloba te Yezu azali na nguya nionso?
Oui (ezali bongo) Koyebisa ba 1:8
20.Nani azali pona bato mosusu Moto ya biboso na kati
ya Trinité? Ezali Nzambe.
21. Nani azali Moto ya suka na kati ya Trinité?
Ezali Molimo mosantu. Yezu alobaki: "Nazali ya liboso pe ya suka."
Koyebisa ba 1:17-18
22. Na Koyebisa basekele yean amonaki bato boni na Kiti
ya Bokonzi? Amonaki Moto moko. Koyebisa
ba. 4:2
23. Soki Yezu azali ya liboso pe ya suka pona nini Nzambe
alobaki te azali ye moko ya liboso pe ya suka? -
Po te bazali moto moko. Esaie 44:6 na 48:12
24. Yezu ayebisaki satana te Nzambe ye moko akoki na
lokumu? Ezali bongo Yezu alobaki. Math 4:10
25. Zabolo andimaka banzambe ebele? Andimaka
te. Jacques 2:19
26. Bibilia ezali koloba te Nzambe oyo azali Liloba
amikomisaki mosuni? Ezali bongo. Yoane 1:1, 14
27. Pona nini Nzambe amimonisaki na mosuni?
Hebr.
2:9, 14
28. Yezu azalaki Nzambe na lolenge ya Moto? Ya
solo. Timotheé 3:16
29. Yezu akoki kozala nbala moko na likolo pe na nse?
Ya solo. Yoane 3:13
30. Bibilia ezali koloba Nkolo azali moko? Ya
solo Esaie 45:18 na Eph. 4:5
31. Bibilia ezali koloba te Yezu azali kolo?
Ya solo. Koloso 3:4
32. Bibilia ezali koloba te Kolo azali Nzambe?
Ya solo. 1. Rois 18:39; Zach 14:5; Misala 2:39; Koyebisa
ba. 19:1
33. Oyo amataki na Likolo, ezali bobele oyo akitaki?
Ezali bobele ye. Efese 4:9-10
34. Nzambe akopesa kembo na ye na moto mosusu?
Akopesa te. Esaie
42:8
35. Na liboso ya YAHWEH Nzambe mosusu azalaki?
Na liboso Nzambe mosusu azali te pe na sima. Esaie
43:10
36. YAHWEH ayebaki Nzambe mosusu lolenge na ye?
Te. Esaie
44.8
37. Tokoki koyeba ba Nzambe boni? Moko.
Osée 13:4
38. Kolo azali na ba Kombo boni? Moko.
Zach. 14:8
39. Ezali malamu kokanisa na bozindo pona tina na Kombo
na Nzambe? Ezali bongo. Malachie 3:16
40. Makomi ezali kotalisa te Nzambe ye moko atambolaki
likolo ya mai? Ya solo. Job 9:8
41. Pona nini Yezu atambolaki likolo na mai?
Po azalaki ye moko Nzambe mozalisi. Mat. 14:25 na Kolosa
1:16
42. Nani akoki kolimbisa masumu soki ye moko Nzambe
te? Mark. 2:7; Es 43:25
43. Yezu azali na nguya ya kolimbisa masumu?
Ya solo. Mark. 2;5-11, Mat. 9:2-6
44. Yezu azali solo Nzambe? Ya
solo. 1 Yoane 5:20
45. Soki Nzambe na Molimo santu bazali bato mibale,
nani azali Tata ya Mwana Yezu? Mat. 1:20 elobi
te ezali Molimo mosantu. Kasi Rom. 15:6; 2. Korent. 11:31; Efz. 1:3 ezali
koloba te Nzambe moto azali Tata. Bandeko na ngai Molimo ezali kaka moko.
Efz. 2:18; 1. Korent 6:17; 12:13; Filip 1:27 na 2. Korent. 3:17
46. Tango Polo na nzela ya Damas atunaki "ozali
nani Mokonzi" Eyano ezalaki nini? Nazali
Yezu. Misala 9:5
47. Etienne pene na liwa abengaki Yezu Nzambe?
Ya solo. Misala 7:59; Luk. 23:46
48. Thomas abengaki Yezu Nzambe? Ya
solo. Yoane 20:28
49. Bibilia ezali kotalisa te Yezu azali Nzambe?
Ya Solo. Mat. 1:25
50. Yezu alobaki te "ngai na Tata tozali moko?
Ya solo. Yoane 10:30
51. Bokoki koloba te na makomi, Yezu na Tata bazali
moko lokala na bibala mwasi na mobali bazali moko? Bokoki
koloba bongo te pamba te bonzambe ekoki komekisama ata moke te na mwasi.
52. Bibilia ezali koloba te Nzambe azali moko?
Ya solo Nzambe azali moko. Jude 25
53. Soki Molimo mosantu azali moto, nolenge nini akoki
kopanzana na kati ya bato? Bibilia elobi te Molimo
- santu ezali moto. Joel 2:28; Misala 2:4; Tite 3:5,6; Misala 2:17
54. Bandimi ya Trinité bakoki kolimbola te tango
yoane abatisaki Yezu banzambe bazalaki misato? Bakoki
kolimbola te, pamba te na batisimo ya Yezu bilembo misato nde emonisamaki
na nguya ya Nzambe moko.
55. Banzambe nini mibale oyo bandimi ya Trinité
bazali kolobela? Ja liboso ezali mongongo oyo
ezali koloba. Genése 3:8 - Ya mibale, Molimo na Nzambe oyo ezali koloba
na kati ya ndeke. Mat. 3:16
56. Mongongo elobaki nini na batisimo ya Yezu?
"Ozali mwana na ngai ya bolingo, oyo nati motema"
Mark. 1:11. Esepelisaki tata kozala na kati ya Yezu.
57. Eloko nini Nzambe azangi koyeba? Nzambe
mosusu, Esaie 44:8
58. Eloko nini Nzambe akoki kosala te? Kokosa.
Tite 1:2
59. Bibilia elobi te Yezu asopaki makila na ye?
Misala 20:28
60. Bibilia elobi te Yezu akufaki?
Ezali bongo. 1. Yoane 3:16
Apostolische
Pfingstgemeinde (UPC) Friedelsheimer Str. 14-20 68199 Mannheim Germany http://www.v-p-m.de |
Service:
Dimanche 14.30 h Sondage de Bible: Mardi 19.00 h |